Paroles de la chanson Sans cœur par Werrason

Chanson manquante pour "Werrason" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Sans cœur"

Paroles de la chanson Sans cœur par Werrason

Mama bolingo pasi, ngai nayebaki te o
Bolingo etumbu, ngai nayebaki te
Bolingo somo, namoni na miso
Alobaka na ngai ke akobala nga
Bazotuna ngai na bato Ngai naloba nini?

Soki bolingo esili, lobela ngai nayeba
Ndenge okomi kosala ngai, ekomi somo
Nakanisaki yo mobali ya vie na nga
Yango namipesaka boye Gisèle Zinda

Eloko esali ngai pasi, Annie Ngangwele
Ndenge okomi kowangana ngai na miso ya bato
Ezali choix na ngai te kolinga mibali ebele
Po naboya kobota mwana na mwana na tata na ye

Soki bolingo esili, lobela ngai nayeba
Soki pe nyongo, lobela ngai nafuta
Soki pe ba mbanda, ngai nameka nzoto

Awa okeyi na yo, eloko nakosenga
Ata obosani ngai, kobosana bana te
Oyebaka, y'otika ngai na bwale
Epayi susi na mokumba ya bana

Eloko nini'ango ngai nasalaki yo e
Soki likambo ebongwaki tobongisa malembe
Oyebi malamu ke naza orpheline
Pasi ya butu na moyi, se na maboko ma yo

Awa osundoli ngai, soki pasi na butu
Soki maladie ya bana ngai nakosuka wapi?
Ndenge y'okosala, yo okokanisa te
obotama pe na bandeko ya basi

Pasi omonisi ngai, yo okofuta ata ndele
Ata na oyo, okolinga makasi
Akosala yo pe ndenge osali ngai
Mabe tosalaka ekofutama awa o nse

Mokolo ezali yo okolela nga
Mokolo ezali yo okobanza nga
Ata sima ya liwa na nga
Yo okokanisa Zinda

Banda okende na yo

Ngai awa na sima, souçi elei ngai nzoto
Natikali awa mipanzi ya kotanga
Oluki liwa na ngai
Ngai awa nakeyi koyenga yenga
Malole, ebembe ya soso matanga te
Nani akolela ngai

Okende otikela ngai

Makanisi ekoma nde kofole liwa
Etumba na soucis
Arme nini nakolonga
Awa ko bisengo epesa nga congé
Consolation na ngai bana otikela nga
Fotokopi na yo e

O mon amour nakomi owe étourdi...
Ngai nalingi Yula Bols na motema
Banda otika ngai, vie na ngai
Papa Mundabi ebeba Na molili to ye
Okende otika ngai na pasi Nga nalela
Nabwakisi baninga na ngai nyonso ya motema
Tala ndenge osali ngai

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment