Aller au contenu principal

Paroles de la chanson Loyembo langa par

Nkolo yamba loyembo la nga
Libonza ya moto asimbami na yo
Nazali elembo ya bolingo bwa yo
Mokonzi ya bakonzi banso
Otika likolo polele Masiya
Po tomona kembo pe nguya na yo
Oza liziba lia mayi ma lobiko
Yo Nkumu ya bankumu banso

Y'ozali bopemi bwa ngai
Bipayi nakotika mikumba mia ngai
Ozali solo likonzi lisimbi ndako
Masiya na ngai
Y'ozali lokumu la ngai
Bipayi nakosimba soki nalembi
Ozali bipayi nakitisaka motema
Masiya na ngai

Ozali nzete ya bolingo Masiya
Nakati y'elanga ya motema na ngai
Epesa fololo ya malasi kitoko
Na miso ya Nzambe na bule
Opesa bokono kombo ya lobiko
Obenga liwa na kombo ya mpongi
Po ete lisekwa lizali yo Masiya
Mokonzi ya bakonzi banso

Nasopi motema na ngai
Liboso ya kiti ya ngolu na yo
Po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
Masiya na ngai
Kitisa nguya na yo Nkolo eh
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso kembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Yamba maloba ya motema na ngai (Ya motema na ngai Nkolo)
Mosopani liboso na yo mosantu
Nazongisa kembo pe lokumu na yo (Alléluia)
Yo nzela pe bomoyi ya seko (Ata molili)
Ata molili ya mokili eyindi (Ata molili eh Nkolo)
Mwinda mwa yo moko ngengisa nzela na ngai
Oyo asimba ngai loboko ezali yo
Mokonzi ya bomoyi na ngai (Nkolo nasopi eh)

Nasopi motema na ngai
Liboso ya kiti ya ngolu na yo
Po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
Masiya na ngai (Yaya, kitisa nguya na yo)
Kitisa nguya na yo Nkolo eh
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso kembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Ozali solo likonzi lisimbi ndako (Masiya na ngai)
Ozali solo likonzi lisimbi ndako (Masiya na ngai)
Ozali solo otonda ngai na bomoyi na ngai (Masiya na ngai)
Oh, Ozali solo bikamwa nako pesa molili (Masiya na ngai)
Oh, Ozali solo moninga malamu akosaka te (Masiya na ngai)
Nkolo, Nkolo, Nkolo, Nkolo Yesu eh (Masiya na ngai)
Nkolo, Nkolo, Nkolo, Nkolo Yesu eh (Masiya na ngai)
Na yo Yesu, Ngai na kondima nde Nzambe tata na ngai (Masiya na ngai)
Nzela, bomoyi, kimia ya basantu banso (Masiya na ngai)
Nzela, bomoyi, kimia ya basantu banso (Masiya na ngai)

Nkolo, kitisa nguya na yo
Kitisa nguya na yo Nkolo eh
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso kembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya (Nkolo, kitisa nguya na yo)
Kitisa nguya na yo Nkolo eh
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso kembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya (Nkolo, kitisa nguya na yo)
Kitisa nguya na yo Nkolo eh
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso kembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Paroles.net dispose d'un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection du moment