Paroles de la chanson Loyembo La Ngai par Gael Music

Chanson manquante pour "Gael Music" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Loyembo La Ngai"

Paroles de la chanson Loyembo La Ngai par Gael Music

Nkolo yamba loyembo la nga
Libonza ya moto asimbami na yo
Nazali elembo ya bolingo bua yo
Mokonzi ya bomoi na ngai
Otika likolo polele Masiya
Po tomona kembo pe nguya na yo
Oza liziba lia mayi ma lobiko
Yo Nkumu ya bankumu banso

Y'Ozali bopemi bua ngai
Bipayi nakotika mikumba mia ngai
Ozali solo likonzi lisimbi ndako
Masiya na ngai
Y'Ozali lokumu la ngai
Bipayi nakosímba soki nalembi
Ozali bipayi nakitisaka motéma
Masiya na ngai
Ozali nzete ya bolingo Masiya
Nakati y'elanga ya motema na ngai
Epesa fololo ya malasi kitoko
Na miso ya Nzambe na bule
Opesa bokono kombo ya lobiko
Obenga liwa na kombo ya mpongi
Po ete lisekwa lizali yo Masiya
Mokonzi ya bakonzi banso

Nasopi motema na ngai
Liboso ya kiti ya ngolu na yo
Po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
Masiya na ngai
Kitisa nguya na yo Nkolo
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso nkembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Yamba maloba ya motema na ngai
Mosopani liboso na yo mosantu
Nazongisa kembo pe lokumu na yo
Yo nzela pe bomoyi ya seko
Ata molili ya mokili eyindi
Mwinda mua yo moko ngengisa nzela na ngai
Oyo asimba ngai loboko ezali yo
Mokonzi ya bomoyi na ngai
Nasopi motema na ngai
Liboso ya kiti ya ngolu na yo
Po ete lobiko na ngai ekowuta na yo
Masiya na ngai
Kitisa nguya na yo Nkolo
Awa tokobelela kombo na yo
Lakisa biso nkembo pe makasi na yo
Nzambe na nguya

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment