Paroles de la chanson Kati Nayo par Gael Music

Chanson manquante pour "Gael Music" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Kati Nayo"

Paroles de la chanson Kati Nayo par Gael Music

Likolo na nga na bososoli masiya ya bozalisami na yo kati na motema Nde lokola bozui na ngai awa na se na moyi, nioso yo okoma pona nga pe oyo osala po na nga Yango nde motema osopi lokola loyembo ya lelo liboso ya kiti ya ngolu yamba yango na esengo Motema ebombi ekoki te ekomi kobima na maloba epunzi makasi kati ya moto ebonguani ekomi loyembo Na bozalisami na yo nazui esengo na bungisa uta kala Na bozalisami na yo nazui Kimia Na zangaka na mokili Olaka koyanola pe kolakisa nga mabombami na yeba te oo nioso po aza kati na yo Na lisolo na biso mibale obombelaka ngai eloko té Nioso ozuwa na tata olakisa moto tokoma baninga Onetolama onetola nga moninga na yo, nioso po naza kati na yo Opesa nga kombo ya sika mosantu kati na yo Na yo nde asimbami pona seko Okoma esika ya bopemi na nga Yo nde liloba na bomoyi Nioso po naza kati na yo Ngai na koma moto n'esengo yesu eee Na koma moto na esengo libela kati na yo Osimba bendele ya elonga mayisa yesu na nga Okoma esika ya bopemi na nga, nioso po naza kati na yo Yaya, opesa nga kombo ya sika yesu ee Opesa nga kombo ya sika mosantu kati na yo Na yo nde nasimbami pona seko Okoma esika ya bopemi na nga Yo nde bolingo ya motema na nga Nioso po naza kati na yo Ngai nakoma moto n'esengo yesu ee Na koma moto na esengo libela kati na yo Osimba bendele ya elonga masiya yesu na nga Okoma bisika bopemi na nga Ahhhh nzambe na nga Nioso po naza kati na yo Po na nga yo koma nzambe Nabenga makambo nioso ya sika Olona elikya po nga na bosana Makambo nioso ya Kala Oya na makoki kolongola lisumu Po nakoma mosantu Nzambe na nga, nioso po naza kati na yo Nioso po naza kati na yo oh, nioso po naza kati Yango opesa nga kombo ya sika yesu eee Opesa nga kombo ya sika mosantu kati na yo Na yo nde nasimbami po na seko Okoma esika ya bopemi na nga Naza na Nzambe mosusu te oo nioso po naza kati na yo Ngai na koma moto n'esengo yesu ee Nakoma moto na esengo libela kati na yo Osimba bendele ya elonga masiya yesu na nga Okoma esika bopemi na nga Nioso po naza kati na yo Ahhhh nioso po naza kati na yo oo(nioso po naza kati na yo) Otia elembo ya bonzambe kati na nga mosantu (oo o nioso po naza kati na yo) Nakoma mosamboli libulu ya bilaka ya Nzambe tata (oo o nioso po naza kati na yo) Po na yo yesu mokili ya molili ekoma kobanga nga (oo o nioso po naza kati na yo) Nakoma tempelo evandisa molimo ya Nzambe tata (oo o nioso po naza kati na yo) Bomoyi na nga na mokili ekoma ya moleki nzela (oo o nioso po naza kati na yo) Nioso nakosala ekosimba po naza nde moponami (oo o nioso po naza kati na yo) Esengo ya Nzambe ekoma makasi na nga mosantu (oo o nioso po naza kati na yo) Ebongo bilembo ya bozambe emema nga n'epimelo ya likolo (oo o nioso po naza kati na yo) Uta okota kati na nga nakoma moyengebene (oo o nioso po naza kati na yo) Yaya obundaka ata bitumba oyo miso na nga emonaka te (oo o nioso po naza kati na yo) Nazalaka moto ya kolela nakoma moto ya Koseka (oo o nioso po naza kati na yo) Oza ya nga naza ya yo yesu ee Opesa nga kombo ya sika mosantu kati na yo Na yo nde nasimbami po na seko Okoma esika bopemi na nga Yo nde makasi ya motema na nga Nioso po naza kati na yo Ngai nakoma moto na esengo yaya na nga Nakoma moto na esengo libela kati na yo Osimba bendele ya elonga masiya yesu na nga Okoma esika bopemi na nga Ahhhh yesu na nga, nioso po naza kati na yo Nkolo na nga, nioso po naza kati na yo Nioso po naza kati na yo Elombe elombe ya motema na nga (nioso po naza kati na yo) Elombe elombe ya libota na nga (nioso po naza kati na yo) Elombe elombe ya Mboka Congo (nioso po naza kati na yo)
Nioso po naza kati na yo

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment