Paroles de la chanson Identité Ya Mokonzi par Gael Music

Chanson manquante pour "Gael Music" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Identité Ya Mokonzi"

Paroles de la chanson Identité Ya Mokonzi par Gael Music

Na ye na nionso na zali epayi na yo mokeli
Bomoyi na ngai efukami, na tatola oyo'sali na ngai
Yamba masanjoliii ewuti na motema, libonza na pesi na yo

Malasi ya motuya ngai na sopi liboso ya kiti na yo, bipayi na kutani na liziba ya ngolu eh
Eko tanga na motema, ya motuya na ngai

O pesi bomoyi bwa yo mbeka ya motuya nkolo, o sopi makila ma talo kosomba milimo oyo ya baye ba ndimeli yo,
Yango na koti lelo oyo na molongo ya ba longi yaya, yango na moni kati na ngai bilembo ya bo nzambe bwa yo,
Yango na fandi lelo bipayi y'ozali eh
Na mona kembo na yo.

Yango na semboli loboko na tatola se bolingo bwa yo,
Na fungoli motema eh na yamba ngolu na yo nkolo,
Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motema na yo, nkolo ya bomoyi na ngai

Uta na kutana na yo eh, lisapo na ng'ebongwani, ut'o lokota ngai mokweyi, o ndimi ngai kati yo, nazui identité,
Bomoyi oy'a ba bulami na koti kati ya bonzambe,
O modelé ngai opesi forme, mon passé s'est écoulé, yango na koti lel'oyo na molongo ya ba longi yaya,
Yango na koti lelo oyo na molongo ya ba longi yaya, yango na moni kati na ngai bilembo ya bo nzambe bwa yo,
Yango na fandi lelo bipayi y'ozali eh
Na mona kembo na yo.

Y'obongoli lolenge na ngai, nazui mpe tina na kati ya bonzambe, y'o ndimi ngai to zala ba ninga,
ma main dans ta main
To tambola elongo ohh,
Na mozindo ya bolingo'ya nzambe,
Masolo ya mitema esopana, zala wa ngai,
Na lingi yo oh yesu eh,
Nzete ya bo pemi na ngai,
Mosisa oyo esimbi ko ndima na ngai,
Merci mp'ozui nionso ya ngai...
Mosantu eh...

O latisa ngai elamba ya sika
kombo na yo (echos)
Identité ya mokonzi na zui na koti na molongo,
Propièté privée ya nzambe hé ngai nazui ngolu, p'oyo nde bolingo ya sika

Identité ya mokonzi nazali oyo azali eh,
(Ngai na wuta na yesu)
Na wuti kati na yesu na zali mwana na nzambe,
Yango naza ko dondwa eh
Lokola nzambe ya mwana ah.

Identité ya mokonzi nazali oyo azali eh,
(Ngai na wuta na yesu)
Na wuti kati na yesu na zali mwana na nzambe,
Yango naza ko dondwa eh
Lokola nzambe ya mwana ah.

Yango na semboli loboko na tatola se bolingo bwa yo,
Na fungoli motema eh na yamba ngolu na yo nkolo,
Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motema na yo, nkolo ya bomoyi na ngai

Yango na semboli loboko na tatola se bolingo bwa yo,
Na fungoli motema eh na yamba ngolu na yo nkolo,
Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motema na yo, nkolo ya bomoyi na ngai

Yango na semboli loboko na tatola se bolingo bwa yo,
Na fungoli motema eh na yamba ngolu na yo nkolo,
Na zala oy'o lingi po'ete na sepelisa motema na yo, nkolo ya bomoyi na ngai
(Na sepelisa motema ya nzambe eh mokeli na ngai...)

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment