Paroles de la chanson Amen Amen par Gael Music

Chanson manquante pour "Gael Music" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Amen Amen"

Paroles de la chanson Amen Amen par Gael Music

Tika nga na yembela yo
Tika nga na kumisa yo eh
Tika nga na tombola yo eh
Nkolo tika na yembela yo
Tika nga na kumisa yo eh
Tika nga na tombola yo yaya eh
Maloba ya motuya emati na motema na nga
Na lingi na kumisa yo
Na lingi na tombola yo eh
Bolamu na yo eleki nga ndelo eh
Na lingi na tombola yo eh
Tika na tombola yo yaya eh
Kombo na yo masiya na nga
Ezala nzete ya mpiyo eh
Na fanda na kimia eh yaya eh
Kombo na yo masiya na nga eh
Ezala mopanga monene eh
Ya kokueyisa satana eh
Na kombo ya libota na biki te
Na kombo ya noko na biki te eh
Ohh yesu yesu mobikisi na nga
Libaku ya malamu ya ko kutana na yo
Soki olekaka na nzela na ngai te
Nde lelo na suka wapi eh
Na lolenge ya bassesse obimisi nga
Soki olekaka na nzela na ngai te
Nde lelo na suka wapi oh
Na lingaki na beba eh
Nde na lingaki na kufa ehhh
Obimisa nga na libulu ya ba nkosi (merci seigneur)
Na kutana na yo nazua bomoyi eh
Na kutana na yo nazua bomoyi ya seko eh
Ngolu malamu ya ko yeba yo masiya na nga eh (merci seigneur)
Soki y'olekaka na nzela na nga te
Nde lelo na suka wapi eh
Na suka wapi yaya ehhh (merci seigneur)
Solo na lingaki na beba eh
Na singa ya famille na lingaki na kufa na ngai eh
Obimisa nga, okangola nga opesa nga bomoyi yesu na nga (merci seigneur)
Amen Amen epayi na ye
Bo tika nga na yembela ye
Na yebi lisolo ya nga na ye bisika ebanda eh (merci seigneur)
Alinga nga na kibomuana na nga
Akuta nga na ki bassesse na nga
Andima to tambola elongo apesa nga sense ya vie eh (merci seigneur)
Tu m'as taillé, tu m'as façonné
Opesa nga sense oyo mokili ekokaki ko pesa te
Oza nzambe na bomoyi (merci seigneur)
Nazua ngolu ya ko kota na mesa ya roi
Nazua ngolu ya ko fanda na mesa ya mokonzi eh
Ngolu malamu ya ko fanda na mokonzi eh (merci seigneur)
Nkolo na bongisi mesa lelo eh
Ngai pe na lingi na liesa yo eh
Masanjoli ya motema na nga masiya yaya eh (merci seigneur)
Na bongisi mesa na nga eh
Na lingi na pesa...
Na sopa motema liboso ya mokolo ya bomoyi na nga eh (merci seigneur)
Je sais là où tu m'as ramassé
Lisolo oyo na koki ko beta na moto nioso te
Lisolo ya motema ya nga na yo nzambe
Oyo na koki ko loba na miso ya bato te
Otala standing ya vie na ngai te
Otala na yo te bisika oyo na zalaki ko fanda
Opona nga yesu ehhh
Bo tika nga na yembela ye
Bo tika nga na tombola ye
Na kanga motema te po oyo asaleli nga eleki ebele eh (merci seigneur)
Bo tika nga na tombola ye
Na nzela ya hopitaux abikisi nga
Na makama ebele abimisi nga eh yesu eh (merci seigneur)
Moninga malamu akosa jamais
Na benga ye na kombo nini
Oza yaya, ami fidèl, papa ya bana ebele masiya na nga (merci seigneur)
Moninga malamu eh yesu ehhh
Mobateli malamu eh yesu ehhh
Mwinda eko ngengisa bomoyi ya bayengebene eh (merci seigneur)
Na yebi bisika olokota nga yesu
Témoignage ya bomoyi na nga
Na yebi bisika obimisa nga
Tu es mon maitre, tu es mon père
Na pesa yo merci, na bengo yaya, na bengo moninga malamu
Na bengo ami fidèl
Na bengo nani yesu
Oza oyo abonga eh
Oza oyo abonga eh
Oza oyo abonga yesu na nga eh
Obonga na lokumu eh
Oza oyo abonga
Oyo abonga ko tombola, ko netola, ko kumbamela
Obonga na nioso masiya
L'histoire de ta vie là où tu as commencé avec ton Dieu
Il n'y a que toi qui es capable ya ko loba yango na miso ya batu
Nga na yebi bisika abimisa nga
Na makama ya minene abikisa nga
Na maladie oyo munganga akokaki ko pesa solution te abikisa nga
Qu'est-ce qu'il a fait dans ta vie?
Okokanga motema te oloba merci
Amen Amen Amen epayi na ye
Amen epayi na ye
Amen epayi na mokonzi eh (merci seigneur)
Amen Amen na mokolo ya pema
Amen Amen na mobateli malamu eh
Na mobombi ya solo masiya eh (merci seigneur)
Amen Amen na mongengisi nzela eh
Elombe ya mitema ya bayengebene
Amen Amen (merci seigneur)

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)