Paroles de la chanson Mosungi Na Bato par Alain Moloto

Mosungi Na Bato Traduction française
Chanson manquante pour "Alain Moloto" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Mosungi Na Bato"

Paroles de la chanson Mosungi Na Bato par Alain Moloto

ozali oyo abongi na lokumu
mosungi na kokamwa mokonzi monene aza na bomoi
ozali oyo asimbi bomoi na nga
bipai na tie motema bipayi misu na ngai eza kotala

ozali likonzi ya bomoi ya basantu
ekimelo na nga ozali nzela bipayi na ko tambolaka
papa y'ozali malamu mingi pona ngai
lisekwa ya baye bakenda oh na elikia yakosekwa

y'olobi oza moninga na ngai
elong'eza na yo eh bibayi y'ozali nd'eza malamu
nkolo y'ozali nyoso ya motuya
mobateli na ngai bipayi nakona motema na ngai

ozali oyo mosusu azali te oh
liloba ya bomoi bipai nafandisa elikia
papa y'ozali malamu mingi pona ngai
lisekwa ya baye bakenda o na elikia yakosekwa

ozali kimya mpe esengo na ngai
bilembo ya bosombi oyo mokili ekoki kopesa te
bipayi nasuki yango eza suka te oh
mpo biyano na ngai bisimbami na yo mosungi na bato

ozali nzambe oza na suka te oh
mosungi na baye balemba oh mpe ba bungisa elikya
y'osimba nyonso na nguya ya liloba na yo
mokeli monene nzambe na biso azo ko sala

ozali oyo afandi na motema na ngai mpe asungaka ngai
na kota na kembo na yo eh
ozali oyo atondisa likolo na nse na bonzambe na yo
mpo misu mikumisa yo eh
ozali likonzi ya bomoi ya basantu
ekimelo na ngai ozali nzela bipayi nako tambolaka
papa y'ozali malamu mingi pona ngai
lisekwa ya baye bakenda o na elikia yakosekwa

ozali oyo mosusu azali te oh
liloba ya bomoi bipai nafandisa elikia
papa y'ozali malamu mingi pona ngai
lisekwa ya baye bakenda o na elikia yakosekwa

ozali nzambe oza na suka te oh
mosungi na baye balemba oh mpe ba bungisa elikya
y'osimba nyonso na nguya ya liloba na yo
mokeli monene nzambe na biso azo ko sala

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment