Paroles de la chanson Loyembo La Ngai par Alain Moloto

Loyembo La Ngai Traduction française
Chanson manquante pour "Alain Moloto" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Loyembo La Ngai"

Paroles de la chanson Loyembo La Ngai par Alain Moloto

.- Nkolo yamba loyémbo la nga
Libonza ya moto asimbami na yo
N'azali elémbo ya bolingo bua yo
Mokonzi ya bomoi na ngai

Otika likolo polélé Másiya
Po tomona nkémbo pe nguyá na yo
Ozali lisimba ya mayi ma lobiko
Yo Nkúmu ya ba nkúmu banso

Y'Ozali bopemi bua ngai
Bipayi nakotika mikumba mia ngai
Ozali solo likonzi lisímbi ndáko
Másiya na ngai

Y'Ozali lokúmu mia ngai
Bipayi nakosímba soki na lembi
Ozali bipayi nakitisaka motéma
Másiya na ngai

Ozali nzeté ya bolingo Másiya
Nakati y'elanga ya motema na ngai
Epesa folólo ya malasi kitóko
Na miso ya Nzambé na bulêê

Opesa bokono nkombo ya lobíko
Obenga liwá na nkombo ya mpongí
Po'été lisékwá ezali yo Másiya
Mokonzi ya bakonzi banso

Na sopi motéma na ngai
Libosó ya kiti ya ngolu na yo
Po'été lobiko na ngai ekowuta na yo
Másiya na ngai

Kitisa nguyá na yo Nkóló
Awa tokobélela nkombo na yo
Lakisa biso nkémbo pe makasi na yo
Nzambé na nguya

Yamba maloba ya motéma na ngai
Mosopani liboso na yo mosantu
Na zongisa nkémbo pe lokúmu na yo
Yo nzéla pe bomoi ya séko

Atá molili ya mokili eyini
Mwinda na yo moko ngengisa nzéla na ngai
Oyo asimba ngai lobóko ezali yo
Mokonzi ya bomoi na ngai

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment