Paroles de la chanson Frère Edouard par Madilu System

Chanson manquante pour "Madilu System" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Frère Edouard"

Paroles de la chanson Frère Edouard par Madilu System

Ha, ha, ha, ha, Frere Edouard
A pimelaka moto ko seka na ko lela te, Frere Edouard
Soki ngolo ayebisi yo que ngando aza malade
Ndimela ye oh, po bango nyoso ba vandaka na mayi

Butu eko komaka eh
Tongo pe eko tanaka eh, ba mama ba ko lamuka na tongo
Ko luka mapa na boulangerie
Bango nde ba ko lamusaka biso, tongo esi etani

Ba mama ya mapa
Kinshasa a bosana bino eh
Que bino bato bo lamusaka biso na tongo
Po ba ndeke na ba soso ba bandaka ko lamusa
Biso na tongo, Ba bunga oh

Nga, Diesa, na botama na nga mokolo ya eyenga ah
Yango mpe na mesana ko sambela
Mikolo minso ya lomingo
Na pokwa nga na mesana ko kende messe na nga
Po nalula Nzambe eh

Nakomi na ndako ya Nzambe
Frere Edoire a luli nga na miso ya bato
A beleli na miso ya ba ndimi ngai
Mwasi naye ya molimo
Na tika mibali nyoso ya misuni

Na landi nanga lokuta ya Frere Edouard
Nakomi na ndako ya Frere Edouard
Frere Edouard alobi na lata robe ya molayi
Na tiya kitambala na moto
Frere Edoure okamwisi nga

Ah ngai, Liya, mawa ah
Frere Edouard,
Olulaki ngai na ndenge na ngai te Frere Edouard
Boni yo moyimi boye
Olingi ba tala nga na ndeko mosusu te

Kaka yo moko
Nayebi nyoso naza mwasi nayo
Obangaka nini, Frere Edouard
Pesa nga confiance lokola na mi pesa na molimo

Ba ndimi eh
Eloko na monaka Frere Edouard mabe
Soki ba paya ba ye na ndako
To ya famille na ngai, to ya famille naye

Oko mona Frere Edouard akomi mawa mawa
Lokola mwana ya moke ya 5ans
Nanu azwi petit déjeuner na tongo te
Eh, ba frere na ba soeur
Surtout kanda ezalaka na Frere Edouard

Ko meka ata senga ye sucrée
Te na sombela ba paya
Wana oko mona Frere Edouard abimiseli yo bible
Bo tanga esika moko
Et puis eloko mosusu, ezalaka na Frere Edouard

Soki akangeli yo kanda
Eza lokola moto ba kangi ye na menotte na ba police

Ah, nga, Liya eh
Nga moto nazalaka mwasi ya elongi elengi

Ha, ha, ha, ha,

Lelo nakomi lokola safu oyo eyindi na nzete
Batu kutu ya misuni ba koma ko kamwa ngai
En fin, nayebi te
Soki ba frere nyoso ba zalaka obe boye oh
Ha, ha, ha, ha,

Na voiture nayo
Autocollant nyoso ba koma grace a Dieu
Na ndako na biso
Mur nyoso photo ya Yesu

Na maboko naye oh
Chapelet ezangaka te, Frere Edouard
Yekola ko kaba, yekola pe ko limbisa bato ngo oh

Kake ebetaka likolo oh
Ebomaka nango bato nyoso te oh
Tango mosusu eko boma mobali
Etiki mwasi na bana

Mabe toko salaka o se, eko futamaka o se
Bolamu toko salaka o se
Eko futamaka o likolo
Frere Edouard yekola ko kaba
Yekola pe ko limbiso bato eh

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment