Paroles de la chanson Washington par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Washington"

Paroles de la chanson Washington par Koffi Olomide

Liboso okende otika nga eh
Cendrillon, ne t'en va pas sans me laisser ta chaussure.
Washington gucci

Washington eh tika nga natuna
Washington eh tika nga natuna
Banda eve aliya mbuma bolingo ekenda na mboka nini oh
Washngton eh motema na nga o dynamiter
Likonga ya deception epesa maladie sans traitement
Chimiotherapie sans effet
Et ba practicien sans succès
Ritha bola au secours ah

Nga nakomi omitunaka soki penza amour ezalaka
Nga nakomi omituna soki penza amour e existaka

Kolngola yesu
Kolongola gandhi Ayiiii
Kolongola yesu
Kolongola sainte mère theresa aaa
Po bango nde ba demontra
Ba signe ya bolingo

Mabe na nga obimisi na web na internet
Po ba internautes ya mokili ba naviguer
Bamona oyo suka soni eh
Ritha bola au secours ouhhhh

Na chemin de la croix jesus
Simon de sirene asalisaka ye
Nga natiaki elikya epa na yo
Washingron na nga
Okomemisa nga kuruze
Kuruze ya bolingo
Nzoto ekomi osila nga
Lokola mungwa na biley
Nzoto ekomi olimwa nga eh

Mayi ya mvula
Ekokweyaka na mabele
Oyo ya bolingo
Ekokweyaka na motema
Minzoto elakisa yo bolingo
La lune ememela yo tendresse
Moyi ememela yo
Patience na bolingo
Yobimi Guillaume le conquerant ya motema na nga
Oyaki lokola sonzo osali nga mabe
Yawe na nga
Lembisa motema ya cherie po akoka te kokweyisama na mitambo
ya ba mbanda ah Bountchi

Yo moko olobaki
Okomema nga na mokongo
Tokatisa ebale ti na ngambo esusu
Tokoma na katikati obwakisi nga
Nakomi otepa tepa
sauvetage te
Faute eza ya yo te
Mabe ezali ya ngayi mey
Il fallait pas na lia dindon
Na esprit ya soso

Yokoki oyeba soki oza première amour ya moto
Kasi garantie ekozalaka te Washington
Que okoya kozala dernière amour ya vie na ye oh
Awa pe ko echographie ya sentiment ezalaka te
Verité ya motema ya moto na maboko ya nzambe
Totikaka kolota koleka molayi ya mpongi ehhh

Nakomi convaincu que ozali mosantu eh
Mpo tongo nyonso inventaire se ya mabe na nga
Oyo osali nga lelo, nandimi Kaps kapangala que yesu abotama
ne vraiment na ndeko te
Yozalaki oloba que ozali soeur en christ
Verité ebimi lelo
Yozalaki no soeur en crise

Natangi soyi
Monoko ya kizengi eee
Kombo na nga oteki ango
Na wenze ya bitula
Bakakoli nga koleka ata tombola
Yoteki nga prix mangondo
na zando oyo ya pokwa
Nakomi otambola à zero metre na liwa eh
Yokomisi nga cherie vraiment kota pona Washington bountchi

Liboso okende otika nga
Liboso okende otika nga eh
Lakisa nga mboka oyo ebomba sekele ya liwa
Lukela nga libongo oyo motema na nga ekosema
Po assurance ya vie na nga
Ezwa ata merite ya bolingo napesaki yo

Washington okomi o barrer no nga eh
Washington okomi o martyriser nga
Washington ozongisa film sima
Washington temoi na nga Ritha bola
Washington okomi ko achever non nga
Washington gucci mama, hum koboya te

Lobi nayaki na tongo kobondela yo
Yotindi baleki baloba yozali te oh
Boni okonyokolo mwana moninga boye

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment