Paroles de la chanson Sixième Chantier par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Sixième Chantier"

Paroles de la chanson Sixième Chantier par Koffi Olomide

taba soki azo lela mongongo ya makassi
na butu jamais akoki olala libanda
yoka kolela na nga ata na litoyi moko
oh oyo lorenzo
basi mibale na zemi
jamais moko akoki kosenga mosusu
amema ye na mokongo
kolota yo ekoma chaine preferee
na nga ya television
nyama mokila molayi a pimbwaka mosika te
mama maria alelaki trop jour ya liwa ya jesus et
pourtant ayebaki bien que wana
muana nzambe
mayi ya miso na nga etondisi molangi
ya champagne matuzalem na mokolo moko oo
pona kolela yo laurent lorenzo
likelele afutaka mpaku te na l'etat aye
kasi avandaka naye pause na lidusu na ye e
pourquoi ngai te
souviens toi de moi laurent o promettaki nga
y'okozala carte prepayee
vraiment y'obakisela nga compte sim ya love
nzok'ezalaki n'ango ba promesse ya fonctionnaire
a assurer moto abosanaki que salaire na ye ekoma ya niongo
sixieme chantier ekoti na b'amoureux
bolingo ya tombola na lata te pardon!
parfum nini yango eyebana koleka
amour ya mbeto na nga ebimisi plaisir libanda
wenze nini oteki sentiment na ngai
wenze nini odefisi bilengi na ngai
madusu ya ndako eboyi kokotisa lumiere na mona tongo
bolingo emelisi nga cafe ya matanga ba tia bangioeuvre d'art
ekoti gambela
ezangi musee ee pasii
kukulu elombe elali epayi na nga butu pi
kukulu elombe elali epayi na nga tongo sa
maloba na yo sukali lokola osalaki propagande ya election ya
satan
betela tolo na moto akabelaka yo libanki
kasi oyo alakaka yo te elephant
coordonnier abongiselaka bato ba chaussures
kasi ya ye mokoto ebula phase
kunda ebembe ezalaka na yango na receveur te
kasi moto nionso ayebi destination n'ango
kukulu elombe elali epayi na tongo sa
kukulu elombe elali epayi na nga butu pi
couleur ya douceur
ezalaki bonheur, ebongwani malheur
nakomi sans valeur
lorenzo ba promesses
niosso ya tendresse, ebongwani detresse
ozalaki na nga richesse
napesaki yo confiance ndenge ndeke apesaka na nzete
atikeli ye zala ayebi que akoya kokuta yango ee

nzela ya bolingo ekomi ozengana
ata lifelo etonda esika ya satana eza reserve e
est-ce-que esika n'anga na motema na yo obombaki
nakomi koyetola moto et pourtant navandaka pembeni ya volcan
ngo oo

nzela ya bolingo ekomi ozengana
ata pe lola etonda esika ya yezu eza reserve e
est-ce-que esika na nga na motema na yo obombaki
nakomi kokelela mayi et pourtant navandaka pembeni ya ebale
ngo ooo

mfumu yeu ayebisaki moyibi na croix
kaka lelo tokozala n'o na paradis
ya nga bolingo ekomi nde nazelaka
lelo lobi tout le temps b'explications
baninga na ba love nga mansanga
baninga na ba ntiya nga kolela

est-ce-que ovandaka pe tango mosusu
okanisa moninga otika ye moko na moka bisengo
na ndako na ye laurent mawa
ekomi mokonzi se po abungisa oya ye fungola ya bonheur yo!

mbisi alandaka se esika mayi ekotiolaka laurent
soucis elandi oyo ya nga sourire
pe ec supprimer oyo ya nga la joie
nasali comptabilite y'amour bilan inferieur a zero
motema ezui pension decompte finale te natikali gbetere

yebisa nga laurent sur quel critere o se baser
po osala na wayo o dam na sur memoriam aye
obuaki nioso lokola feticheur a se convertir na
christianisme
nioso asalki ekomi le passe
nayebi laurent nzoto elula biloko ya mokili
kasi pema elula kozonga epayi ehuta
yebisa nga bebe mokolo nini okozongela nga
obuka monument ya soucis oyo otika na vie na nga

nakomi olela bolingo neti kaka ebembe
jesus alelaki lazare kasi azalki capable ya kosekwisa ye
nazangi nguya na ressuscite amour ya yo na nga
esili lokola sentiment ya libele ya mama na monoko ya bebe
awa okomi seronegatif ya bolingo ya yo
nga naza toujours atteint
comprime yango nini omeli
ebomi virus ya bolingo
tata mwasi ahuti na mbokoa ayoki nga na wee
balobi na ye na frauder na corbillard
fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te
ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis
manzaka temoigner que ezali nga eeeeee
cercueil moto asala yo, ateka yo
moto asombi yo, asaleli yo te
nga pe moto nasaleli yo oh! namoni yo te ooo
we mie mimi e eee
mimi e olingi nga nakufa oh oh
mimie olobaki nga nalimbe oh oh
bolingo ebeti nga kibota oh oh
kibota ebimisi kivimba oh oh
kivimba esali nga tofina
tofina ememi nga na kunda wooo

tata mwasi ahuti na mbokoa ayoki nga na wee
balobi na ye na frauder na corbillard
fungola sanduku soki okomona ebembe na nga te
ata ko oko bunga elongi po na kufi na soucis
manzaka temoigner que ezali nga eeeeee

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment