Paroles de la chanson Petite Soeur par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Petite Soeur"

Paroles de la chanson Petite Soeur par Koffi Olomide

Yo o sala soni, petite soeur
Papa azalaki ko benga yo "cherie na yé"
Azalaki ko préféré ndè o labéla yé
Ponini o sali yé boyé ko?
Yo o tikali na nini?
Awa o kabi kabi nzoto
Awa o téki motéma na ba yankés oyo ya shangaï
Mawa mama

Petite sœur o sali soni
Dèko ya muasi o sali pasi

Yo o tikali na nini?
Awa o kabi kabi nzoto
Awa o téki motéma na biléki oyo ya nzéla
Awa o téki mobimba na yo
Awa o kabi lokumu na loyengué oyo ya mopiato
Mawa mama

Petite soeur o sali soni
Dèko ya muasi o sali pasi

Bana ya wélisa ba yébi passi té
Ba yébi kilo na nzoto té
Ba yébi lokumu té

Mokili é bonga boyé té
Mokili é bonga malembé
Mokili é bonga na limémia

Mokili é bonga boyé té
Mokili é bonga doucement
Mokili é bonga na limémia
Mawa mama

Ko kendé liboso éza ko koma té

O botamaki kitoko mpè na dignité
Baninga kitoko ba tiki ko sala déshonneur
Mais yo na moyi ba monaka yo té kaka na butu
Na sé yaba réverbères, mpè na ba rond-points
Na kati ya ba hotels ya ba niveaux nioso
Ba nganda nioso kaka yo; monotonie
O koma muasi ba solisaka sé na kitsuéki
O koma fille oyo ba lingaka kaka sé na le secret

Yo sala soni, petite sœur

Elikia, bo ndoti nioso tu ...
A bima na miso ya nganga Nzambé oyo mpèbé
Mobali moko a latisa yé na mosapi lopèté
Ba logua ba chagrin oyo ya ba parents
A sala bango lokumu
Po ya yo masolo ézalaka sé ya mosolo
Masolo na yo sé ya bilamba oyo o défaka
Masolo na yo sé ya mibali oyo o changeaka

Ba dossiers na yo é yébanaka, valeur wapi
Ba pésa yo kutu kombo championne ya moniato

Yo sala soni, petite sœur na ngaï

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment