Paroles de la chanson Obrigado par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Obrigado"

Paroles de la chanson Obrigado par Koffi Olomide

"Ah la vie, pasi eh
Vraiment luxen bozotala azosala nga boye! Mawa na ga ee"

Eh yoka ngayi moto oyo
kokaka kolinga te
yoka ya nga maloba
tobandaka na lisolo
tosuka ata na lisapo

luxen musen po bayebisaki yo
nga naza ndunda oyo baliyaka te
obwaka na lifulu pamba pamba
ebongaki te olanda
maloba na bango oooo
musengi luxen

oy'a lelo
pasi eleki mingi
matoyi eboyi koyoka
miso eboyi komona
pinzoli eboyi mpe kotanga

yawe eee
nasala nini luxen
naza kokufa po nalingi
moninga moto
po nini nzube etonda bebo
na nzela oyo ya paradiso
paradiso

lakisa ndenge nasala
po natika kokanisaka yo
p'oniokolo nzoto pamba
bolingo oyo nakumbela yo
soki ezalaki moto
ndele ebandi kobima
suki ya pembe

esila nanu te
ezali se na motema na nga ooo
ezali se kopela
lokola ...
mbongo volcan

luxen epay'ozali
yeba awa moto awe
sambela nga moto ya nzambe ee
souci ekosila te
etondi na motema meke
ekangami na moto
tinge

nazuwa wapi
nga nazuwa wapi
nazuwa wapi
oyo ya ngayi cheri
luxen nalinga
alinga nga te ooo
luxen nalinga
bapekisi ye alinga nga
mawa na nga, mawa na nga

hum limbisa ya nga motema
soki emipesa se na yo
Bolingo ezuwa mowumbu
nga nasala nini
Sambala nga luxen
po nabika

limbisa ya nga motema
soki emipesa se yo

limbisa ya nga miso
soki epusa kolula yo
Musengi basala yo ba charme
nga nalula nani

sambela nga luxen po nabika
limbisa ya nga miso
soki epusa kolula yo

baye basenginyaki yo
yebisa bango Obrigado
faute nyonso se na nzambe
Tokosamba ata ndele

Mokili ezali se bongo
baye basenginyaki yo
pesa bango merci mingi

Limbisa ya nga motema
soki epusa kolinga yo
bolingo etiya nga boloko
nga nasala nini
sambela luxen
po nabinga

nazuwa wapi
nga nazuwa wapi
nazuwa wapi
oyo ya nga cheri
luxen nalinga
alinga ngayi te oo
luxen nalinga
bapekisi ye alinga nga
mawa na nga, mawa nga

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment