Paroles de la chanson Mama Amy par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Mama Amy"

Paroles de la chanson Mama Amy par Koffi Olomide

*Koffi* : Ayeeeeeh
*Chœur*: Mikuwa ya prophète Elysée, elamusa ebembe. Dans mon corps Mikuwa ya partie Nini eza na pouvoir yako lamusa Maman Amy.

*Koffi*: Nazangi eyano, ata na leli na photo ya maman
*Chœur*: Ako lamuka teeh

*Koffi*: Maman o'tekaki mutuka n'o po nga na kende kelasi na poto. O'lalaki na etoko po na zalaki na mwa fièvre butu mobimba, aaah maman. Formol ba égyptiens ba embaumer roi pharaon, eko faire durer ye jamais koleka yo dans mes pensées, pinzoli na elongi etikali nga lokola masque, esthéticienne moko te akoka ko longola yango, ba mvula ya ba condoléances ezo suka se na matoyi, incendie ya départ nayo na motema eko sila na nini..

*Chœur*: Maman Amy,,,aah Maman Amy

*Koffi*: Un jour après ton départ na inaugurer usine ya ba larmes, nazwi appel urgent ya ba habitants ya Est, balobi Mopao tika yo o'leli koleka biso, baye ba kufa ba millions on dirait comme si tolela te, eyeeh
Ba mages bozalaki wapi po bo prévenir nga, étoile ya Maman Amy eza déjà na firmament, ake kaka ko rejoindre yango le mal est que a'laki ngai te, pardon maman ngenga na 5h du matin nayeba que wana ezali yo, chaque aurore na talaka mapata, na lakisa bana étoile brillante ekoma memeeeh

*Chœur*: Na leli yo maman, na leli yo maman, na leli yo maman eeeh

*Koffi*: Yo liwa, soki o'zwaki Maman Amy te, est ce que Nzambe alingaki ko longola yo boulot, ou peut-être a'lakaki yo promotion ooh, yango ozwi maman ya motuya, awa oke na mokolo pépinière ngai ndunda na tuli..

*Chœur*:Mur ya lamentation na nga ekweyi

*Koffi*: Nani ako koma anticorps ya nzoto na nga, ba aliments nyoso ekomi bololo, mawa na nga e'sopeli ango mayi ya quinine. Na leli yo maman, na leli yo maman, na leli yo maman uhmngiih, na leli yo maman, na leli yo maman, na leli yo maman ngaieeh.

*Chœur*: Na leli yo maman, na leli yo maman, na leli yo maman eeeh

*Cindy Le Cœur*: Iiiih uuumh aiiiyeeeh

*Koffi*: Wapi epayi motema na nga eko zwa mwa kimia, ata na ba cuillères ya ba bébés na zwa ata pongi, compassion ya baninga eza lokola ya ba fans ya boxeur, basukaka na ba gradins kasi na ring motema ezo bunda, maman soki nayebaki parti moko ya opposition, oyo ba bundaka contre liwa mbele na adhérer. Maman wapi yooh, maman wapi yooh eeh, maman wapi yooh, fungola miso ko, o'mona ndenge toleli yo.

*Cindy Le Cœur*: Uuuhh

*Koffi*: Maman awa tozo kunda yo pembeni ya Papa, soki bozwi likanisi yako resala famille, nazala toujours mwana na yo ya motema, Papa ya Didistone, Elvis, Papa na Aristote, wapi Rocky...manolooh

*Cindy Le Cœur*: Maman Amy y'okati projet ya la lune yango moto e'décidaki ko umelaka ti meyi te pona bolamu nayo eeh

*Koffi*: Nga inspiratrice na nga na yango, o'décidé o'kende, yoka loyembo ya motema oyo e'zanga accord ya la, oyo e'sukaka na mi lokola yo Maman Amy. Maman wapi yooh...

*Chœur*: Maman wapi yooh Amy, maman wapi yoooh, maman wapi yooh eeeeh uuuhh...

*Cindy Le Cœur*: Uuuuuh

*Koffi*: Secret ya résurrection ya Lazare soki Yezu abomb'ango na se ya nzete, maman yeba kombo na nga lelo ekomi Tarzan Antoine, na ke forêt équatoriale, na lukaka se moko moko na chaque nzete, temps nyoso eko zwa nga, l'essentiel na retrouver, formule yako sekwisa maman Amy, maman na nga

Maman eeeh maman ya Antoine oza wapi vraiment, maman yeeh ya Mopao lamuka kooh
Na lela yo na manoko nini e'atténuer douleur na nga, awa ba cils nayo ya miso e'yambani pour du bon.

*Chœur*: Maman wapi yooh, maman, maman wapi yooh Amy...eeuuh

*Koffi*: Maman ya Thierry oza wapi eeh, o'memi ya Gito, Yves, na Ma Lucie

Vie na nga lokola livre, liwa nayo page lourde, ata grain moko te eko koka ko tombola yango po na passer na page mosusu yeeh,,,

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

*Koffi*: Pesa à Papa Charles mbote

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

*Koffi*: Maman boboto maman na nga

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

*Koffi*: Toko bosan'o jamais

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

*Koffi*: Cinq sur cinq o'tiki na Nani ?

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

*Koffi*: Uumh Maman Amy oke vraiment

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs toujours

*Koffi*: Uuumh Maman Amy motema pasi, uumh Maman Amy motema, merci maman, merci pour tout

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

*Koffi*: Merci

*Chœur*: Ton amour dans nos cœurs

Ton amour dans nos cœurs.

Fait par *PAULINO MUVATSI Mwana ya Quadra*

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment