Paroles de la chanson Terminator par Fally Ipupa

Chanson manquante pour "Fally Ipupa" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Terminator"

Paroles de la chanson Terminator par Fally Ipupa

Hum Terminator

Oh oh oh oh Kiadi eh
Bolingo esasi nga
kosasa maman eh
nawey oh
Chérie fait quelque chose

Na déverrouiller motema
nakomisi yango standard
Na makanisi nalinga
mais motema eponi se yo

Nalobi enfin na adapter
makanisi nanga na masanga
Ya kokamwa kwiti nanga
ezo tinda naluka se yo

Osala nga nini eh
na langwa yo fou
Moto bakanga na kisi
mais balingi ye te
Akokoma dépassé
détraqué clochard

Nakoki kokanga nzala
mais kokanga souci te
Oyo amoni akokoka
azwa nga élève naye oh

Terminator 1 ayaki
po aboma Sarah Konor
Mais na 2 a épargnaki ye
pona mwana naye
Tala ata mosika towuti
Claudia epargner nga
koboma nga te

Osala nga nini eh
nalela yo fou
Mabe ozo sala nga
mais nalingi yo kaka
Biley kusu ayoki nkele
Mais nga nandimi
kolya yango Claudia
Pona yo

Sambole
zoma
Ayina
Sanza

Ah Sambole zoma
Miso pinzoli
monoko eboy biley
Eza nga
Mal chance likaku a sauter
na etape ya nzete epola
akweyi
Ayebi pe kobeta maukemi te oh
Sort naye nini?
totikeli obe kaka nzambe
Eza cas nangay
mwan'a ngani mawa eh

Mwan'a ngani mawa Ah

Amour nangay
mutu elataki nango
vraiment blanc-blanc
Osopeli yango
déception mafut'a mbila
Pona feti ya motema nayo
nakota te
Ndima ata koyamba cadeau nanga
douleur ezala réduite!

Ah Sambole eh
zoma
Ayina Sanza

Ah Sambole zoma

Loboko na litama
tongo midi pokwa
Eza nga
Histoire
Annoncez!
Yako loba te
Loba ko

Monoko ezwaka chimie
pona kolobela histoire ango
Ekotinga ngay
nalamusa matanga
ndenge batumbolaka pota
Conclusion boyeba
Claudia azo nyonga nga

Nzambe osala nga
lolenge kani
nalinga kaka ye
Moto azo nyokola nga
Mais na craqua ye fou

Nakoma dépassé
détraqué clochard

Nayebi lolenge bakangaka nzala
mais souci te

Moto ayebi nakoma nanga
ata disciple naye

Terminator 1 ayaki
po aboma Sarah Konor
Mais na 2 a épargnaki ye
pona mwana naye
Tala ata mosika towuti
Claudia epargner nga
koboma nga te

Fwidi eh
nazo kufa boza kotala
maman eh
Boya Ah ooh
ooh oh
ooh oh

nalingaka yo na tongo
nalingaka yo na midi eh
nalingaka yo ti na pokwa
kutu soki naza nayo
ngayi na lola
yo mosika naza éliminé chérie
(ya solo)
Eliminé sur terre
Yaka ah

Miel elembisaka force ya poison
Nini elembisaka force ya souci
Po yango ekomi nango ebende
Erouiller na motema nangay
Kolela nanga na matoy nayo sans impact
Lokola giffle ya fourmi
na litoy ya nzoko
Bomoto nayo oteki na nani?
Motema makasi lokola ebale
Ata abungisi ba mbisi ebele
ayokaka pasi te
Mawa eza teh
Oh

Claudia nabungisi
mayele na makanisi
Oyo nakweyisaki na porte
ya ba promesses nayo
Bato bayibi yango oyebi bien
Bazongisela nga
amour nanga Claudia
Occasion de chute nanga nalinga
Lisumu oyo nalula kosala yeh
Ah Claudia

nalingaka yo na tongo
nalingaka yo na midi eh
nalingaka yo ti na pokwa
kutu soki naza naye
ngayi na lola
yo mosika naza éliminé chérie
(Éliminé)
Eliminé sur terre
Yaka ah

Fally: Eliminé Eliminéee hey hey hey

nalingaka yo na tongo
nalingaka yo na midi eh
nalingaka yo ti na pokwa
kutu soki naza nayo
ngayi na lola
yo mosika naza éliminé chérie
(Éliminé)
Eliminé sur terre
Yaka ah

Fally: oyo akeleli place ya kolala
Bonheur naye tongo etana
Nga nakeleli bolingo
Nakozela nini?
Kiti ya libende esila ngala na ba matanga
Nde valeur Claudia amoni
Apesa ngay
Est-ce que eza te kokana ngay?
Claudia est-ce que okana ngayi kala?
To pe souffler nga ata na litoyiii
Nayebisa famille
que kala te bakolela ngay
Eh
Maman mina kufa eh
Claudia nakowa eh maman
Coco Claudia nakowa Ah
Sasou eh
Hi eh!
Maman nakowa ah maman
Hi eh!
Chérie nakowa maman
Hi eh
Babotoli nga esengo nanga maman ah
Hi eh!
Babotoli nga esengo nanga maman ah
Hi eh!
nakomi kobela pona Koko
hi eh
(Dédicace)
Babotoli nga esengo nanga maman ah
Hi eh!
Babotoli nga esengo nanga Koko
Hi eh!
Nakomi kobela pona chérie
hi eh
Claudia obomi ngay eh
hi eh
Claudia obomi ngay eh
hi eh
Babotoli nga esengo nanga maman ah
Hi eh!
Nakomi kobela chérie nanga
hi eh

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Les plus grands succès de Fally Ipupa