Paroles de la chanson Se Yo par Fally Ipupa

Se Yo Traduction française
Chanson manquante pour "Fally Ipupa" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Se Yo"

Paroles de la chanson Se Yo par Fally Ipupa

Aaah
Se Yo
Ezalaka kaka yo Denz Love
Denz Love, aah

Na zalaki éprouvé, kasi na motema te ooh
Kuna bazo lela papa, ngai na motema Denz Love
Salité e suki na nzoto, kasi na motema te eeh
Kuna nde e sika na logea Denz Love
Forteresse sécurisée infranchissable
Ata Guillaume le Conquérant a lingaki ko franchir te
Po bolingo na yo Denz Love, fortification na mboka ya motema na ngai eeh mama
Motema lokola ba cellules mères, eko se diviser pe ko se multiplier
Yango moto a koki ko bomba n'ae trois, quatre amours
Kasi ya ngai motema indivisible, place moko se ya Denz Love mon amour
Capacité ya motema na ngai bolingo n'o e satura yango bébé eeh
Espace insuffisant pour d'autres amours
Eko senga na effacer yo po mosusu a remplacer
Kasi moyen ya ko effacer yo na motema na ngai ezali te
Mon amour oooh
O zali atome moko ya Oxygène oyo ezangaki na deux atomes ya Hydrogène
Po e sala mayi, po l'eau c'est la vie
Denz Love tu es ma vie, mama tu es ma vie

L'Amour éternel pour la vie
Je te comprends, tu me comprends, on se comprend
Denz Love l'amour de ma vie
Ata puissance agonie na l'île Luçon
Ekwesaki te chérie ba ndako nioso ya bolingo
Denz Love pour le meilleur et le pire
Mama, pour le meilleur et le pire
Ata ko bolingo e wumeli, bana ba koli
Kasi bolingo nay o na motema nan gai eza kaka ya sika
Ko lela te, ko banga te eeh, Seskul a loba « nie nie nie, nie »
Tata bo moko, Mama bo moko, Ekolo be moko, Mokonzi moko
Ata ko ba Ministres ba zali, ba Généraux pe ba zali
Kasi na motema na ngai mokonzi se yo moko Denz Love
Mibale te, se yo mama mokonzi
Yiii yiii yiiii eeh mama mokonzi eeeh
Mibale te eeeh, mibale te eeeh eeeh

Ba ndekos na ngai, ndenge kaka ezalaka
Ba famille na ngai ba wutaki mboka ba ye kotala bisso na Kinshasa
Sikoyo na tango ya retour to décidé na mère
To kende ko tika bango ti na mboka
To mati na bateau, ngai, mère, mokumbi bateau na ba famille na ngai
To komi na kati kati ya lac, bateau e dindi
Mère, mokumbi bateau na ba famille na ngai ba dindi
Sikoyo ba yebisi ngai na sala choix, na sauver mutu moko
Nako sauver nani ? Entre mère, ba famille na ngai to mokumbi bateau
Bo yebisa ngai, aaah

Alors, mes chers amis
Vous qui ne comprenez pas le Lingala, la plus belle langue du monde
Donc, j'étais en train de dire, ma famille est venue nous rendre visite
Et à la fin de leur séjour, on a décidé de les raccompagner ma femme et moi
Et pendant le voyage, le bateau a coulé
Et on me demande alors de ne sauver qu'une seule personne
Soit un membre de ma famille, ma femme, ou le capitaine du bateau
À votre avis, qui dois-je sauver ?

Na motema na ngai se yo aah
Ba lobi na pona entre yo na ba famille na ngai aah
Na lobi raison de vivre na ngai se yo
Se yo wana na "Titanic"
Jack a ndimaki ko se noyer pona Rose
Se yo wana na "Amour Eternel"
Kemal a ndimaki risque pour Nihan
Se yo wana na "Un Prince À New-York"
Prince Akeem a ndimaki ko koma serviteur pour Lisa
Se yo wana na Biblia
Abraham a ndimaki ko kabwana na Agar na Ismaël pour Sarah
Se yo moko, mama mokonzi, Denz Love na ngai mama mokonzi
Se yo moko mama mokonzi, aaah mama, mama mokonzi eeeh

L'Amour inconditionnel ya toi et moi (ya toi et moi)
Fais-moi danser avec amour Denz Love (Love)
Même dans une autre vie tu seras mon seul choix (mon choix unique)
Laissons parler les aigris, bako yoka soni (soni na bango)

Bébé na ngai, bébé na ngai
A kota motema na ngai mobimba profondement
Aah se yo mosusu te (mama mokonzi eeh)
Aah ma (mama mokonzi eeh)
C'est toi l'amour de ma vie (mama mokonzi eeh)
Mama bana na ngai eza yo (mama mokonzi eeh)
Aah aah aah (mama mokonzi eeh)
Na lela yo ya trop oyebi yango bien (mama mokonzi eeh)
Aah, mon amour

L'Amour inconditionnel ya toi et moi (ya toi et moi)
Fais-moi danser avec amour Denz Love
Même dans une autre vie tu seras mon seul choix (mon choix unique)
Laissons parler les aigris, bako yoka soni

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment

Les plus grands succès de Fally Ipupa