Paroles de la chanson Vanité par But Na Filet

Chanson manquante pour "But Na Filet" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Vanité"

Paroles de la chanson Vanité par But Na Filet

Maman nga nayebi lobi, nazo kende na ngai
Kolela te ekozala jour na ngai
Pasi na motema, Maman nanga Véro
Akolela mingi, hugues ako zonga te
Mokolo ya liwa nanga, ba jaloux bakoya
Ba tangisi mayi ya miso, na mitema feti
Mokolo ya liwa nanga, libota nanga ekolela
Mardochée Prospère Bienvenu ba kolela
Ya Mayi akolela leki na ye akeyi
Arnold Wami mawa
Masolo akolela yaya naye akeyi
Igor wami mawa

Tokozala awa awa
Mukolo ya liwa na ngai, ekozala mawa
Lolendo ya pamba, nzoto mabele ya pamba
Mituka bandako nyoso eko tikala
Mokili angani eza nango ya Nzambe
Tala lobi na yo liwa eza pene
Pasi na motema miradi nanga
Ephraïm na ngai, bako lela pap'ee pap'ee
Mokolo nako wa, Vila Nova na ngai
Bo bosana te, bolamu nanga na mokili
Bozongisa bolamu nanga epayi ya bana nanga
Miradi na nga Ephraïm na nga
Bébé Hanse Rolls Fouine, bako lela papa
Bako somba bilamba ya talo
Baye na matanga na ngai
Bako sala ba tapages, mokolo nako wa
Naliaki na bango, na melaki na bango
Basusu balali na ndako
Lobi basusu bako bosana bana na ngai
Bako beta bango kara
Lokola naza na bomoyi tika na bongisa
Avenir ya Miradi na Ephraïm na nga

Ema eee hieen, mawa eee mawa
Mokolo ya liwa na ngai, ekozala mawa
Mosala nanga loyembo, butu pe moyi
Nazuwa misolo na bokolo bana na ngai
Hugues likonzi ya famille
Bo koluka bo boma nga pamba
Maman na nga papa nanga, bako tikala na nani
Bana nanga bandeko nanga, nani ako bokolo
Mama nga nayebi, nazo kende na ngai
Maman kolela te, mokili elingi nga te
Boko lela, boko lela ngai
Boko luka ngai, kala te nazo kende

Mokolo ya liwa na ngai, eko zala mawa
Mokolo nakowa, Maestro na ngai
Ko bosana te misala na ngai na Vila Nova
Ozongisa bolamu na ngai payi ya ba ndeko na ngai
Yeyeye ye ye ye ye

Marie Misamu akufa alelisa ya mokili mobimba
Jonathan Linda Like alelisa monde entier
Linda Like, vila Nova mawa
Jonathan ozokisa motema ya Maestro

Mokolo ya liwa na ngai, eko zala mawa
Bongisa bizaleli, po lobi eza ya Nzambe
Mawa mawa mam'ee
Jalousie nayo oko kende wapi
Motema mabe, okozanga lola
Kindoki nayo, okokende wapi
Mama mama, oko zanga lola
Obomi nga lelo, oko kufa kaka
Liwa eza mokano ya Nzambe, na mokolo ya suka
Oko kende wapi, oko zala wapi, oko kende wapi
Na loboko ya Nzambe, to pe na loboko ya satana
Ndeko nanga, Oko kende wapi

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment