Paroles de la chanson Nse Yo Yawhé par Myka Mukeba

Chanson manquante pour "Myka Mukeba" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Nse Yo Yawhé"

Paroles de la chanson Nse Yo Yawhé par Myka Mukeba

Bolingo na Yo na bomoi na ngai, eleki nionso

Bomoto na Yo nde suka na bomoi na ngai
Na yebaka te Mokonzi kokanisa na Yo na nani
Po Yo'zali seko, na seko Yawe na ngai...

Soki mbisi na mayi, eko kumisa Yo
Soki ba niama na zamba, bako pambola Yo
Tango Otelemaka, bangomba ekumelaka Yo
Po Yo Ozali mokeli ya mokili (Yawe)

Yo okumama, Yawe: Esika bopemi na ngai
Esengo ya motema na ngai, sanzolama Elohim
Mokonzi na bakonzi se Yo Yawe.

Yo obuakaka te, baye ba mipesa na Yo
Pe Omibombaka te na baye balukaka Yo
Yango ngai na mipesi pe na luki Yo Yawe
Po na yebi Yoko buaka ngai te... pona yebi
Yoko buaka ngai te.

Losambo na ngai, ngai nazala seko yayo
Bonzambe na Yo efanda kati na ngai
Maloba na ngai, Nkolo enetola kaka Yo
Na mona nkembo na kumisa...

Bolamu na Yo, yango nde esala ngai nazala
Lolendo na ngai na bokasi na Yo
Monene na Yo, epusa liwa mosika na ngai
Tika Kombo na Yo, etombuama...

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment