Paroles de la chanson KEBA (EPOTI) par MPR

KEBA (EPOTI) Traduction française
Chanson manquante pour "MPR" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "KEBA (EPOTI)"

Paroles de la chanson KEBA (EPOTI) par MPR

Na virage oyo namoni fatigue na ba effort ya batu

Tokomi kozanga rien depuis politicien azua tout

Maman a genoux a ao sambela po tobima Na trou

Na mayi ya misu Na biso nde sauce ya pouvoir zua gout

Nani akoki KO zappé pona biso épisode oyo ya vie
Bazo sacrifié vérité batiki lokuta na abris

Na mboka oyo prison eza seul façon Yako se libérer

Malheur ya bokonzi azo Mona peuple azo vivre heureux
Chemise, cravate Mokonzi ake parlement
Loi ebimi asutuki a voté kanyaka ekoti

Wana Biso Na cité courant na mayi femme de nuit

Ba leki na kuluna,
Ba petite sr Bao Teka nue

Guerre ya Congo ekoma chanson
Ba cha refrain na guerre ya Est..

Vrai problème eza ya musique ?
To ya ba chef d'orchestre ?

Na ba guerre na bango échec na bango victime ezali nde biso

Élections casting ya ba riche yo Mona kasi kanga miso

Bao kweisa ngomba ya avenir
Ba détruire mutema ya future

Ba croqué fruit défendu
Corruption ekoma culture

Ba vitesse
Ekoma fierté

Po ba tondisa ba parking

Peuple azo mela somnifère
Azo zela changement po ebanda par qui?

Père oyo ezali nzembo te
Eza ba cries ya douleur

Omoni elamba ya pouvoir ndenge ezo changer ba couleur ?

Mélodies ya ba dialogues nionso esuka na note ya mabe

Awa si rose ekoli ekoli n'a ba épine te

Elamba soni ya lokumu bolati Bozo yoka
Kilo teeee

Olingi olongola lipoti ya lipoti ya lisu
Kasi epa nayo eza Kaka

Monguna na biso eza Kaka oyo aza libanda te..bino pe...

Oyo Boloni na mitema Na biso ebungi te... eza Kaka

Aaahhh eza Kaka
Aaahhh eza Kaka

Mituna sans biyano
Même Presse eza attaché

Kondima Na mulili
Tozo kufa a petit feu

Opposition cinéma
Baza n'a plus de 20 discours

Leader aza te, peuple
azo senga lemuntu asala retour

Babosani 18ans
Ya mayi ya moto Na ba Gaz
Ya ba tire ya Balle réel

Liberté d'expression Na Cage

Congolais eza émotion
Congolais eza sentiment
Politique ya déception

Bao lia
Bao mêla tranquillement

Na monde oyo ya ba intérêt conscience
Eza na place te

Baza cassette te
Mais Bango tout baza na ba face B

Vie na biso eza message Bao koka KO tanga te
Nani ako Pia béquille Na peuple oyo spiritualité ezo boîter

Elamba soni ya lokumu bolati Bozo yoka
Kilo teeee

Olingi olongola lipoti ya lipoti ya lisu
Kasi epa nayo eza Kaka

Monguna na biso eza Kaka oyo aza libanda te..bino pe...

Oyo Boloni na mitema Na biso ebungi te... eza Kaka

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)