Paroles de la chanson Azali Se Ye Moko par Mike Kalambay

Chanson manquante pour "Mike Kalambay" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Azali Se Ye Moko"

Paroles de la chanson Azali Se Ye Moko par Mike Kalambay

Azali te na mona te
Oyo'a leki yo yesu na nguya
Likolo na se misala ya liloba na yo Ya nguya


Alleluia
Soki ba nzambe bazali
Yesus na ngai nde Nzambe
Yes

Nani akotuta tembe na oyo yo ozali
Osala misala emonana na miso ya banto
Na egypito kino lelo ba yebi
Misala ya loboko no ya nguya
Pharaon mikanisaki elombe
Asuki liboso ya Israela
Wana etalisi yo oza Nzambe
Mosusu te
Mosusu te

Azali te na mona te
Oyo'a leki yo yesu na nguya
Likolo na se misala ya liloba na yo Ya nguya

Moto ya mayele balandaki mozoto
Kombo na ye Yesu
Mwana moke na maboko ya mama na ye
Nzoka nde mokozi

Elobamaki na lisako ya Isaaya
Akosala mobikisi
Bamemaki olo bamemaki malasi
Makala malasi
Kobombamel'oyo abongi na lokumu
Mwana na pate
Na yoka te, na yoka te
Oy'aleki yo Yesu na nguya
Kangela ngai oy'aleki yo Yesu na nguya
Oh na mona te, na mona te
Oy'aleki yo Yesu na makasi
Kangela ngai oy'aleki yo Yesu na nguya
Soki ya bango aza mokonzi
Ya biso mokonzi na bakonzi
Kangela ngai oy'aleki yo Yesu na nguya

Ah ebanda boni na yemba Yesu
Nzambe mokeli esika moko na bikelamu
Kangela ngai oy'aleki yo Yesu na nguya

Hum tika ngai na netola yo yaya
Tika ngai na netola yo
Yamba loyembo ya sika libonza pona yo
Tika ngai na netola yo
Yo liloba ya bomoyi, okomisa ngai mwana Nzambe
Tika ngai na netola yo
Ah to yemba yo to yemba lisusu nani
Tika ngai na netola yo

Osala biso ngolu toyeba babombami na yo
Topona no yemba mokeli bikelamu te oh
Basantu boya totatola oyo azali

Ah ya liboso aza Nzambe
Amen
Ya mibale aza mokonzi
Amen
Ya misatu aza papa
Amen
Ya mineyi alalaka te
Amen
Ya mitanu aza nionso yes
Amen
Libela na libela ozali Nzambe
Na yoka te, na yoka te
Oy'aleki yo Yesu na nguya
Kangela ngai oy'aleki yo Yesu na nguya
Oh na mona te, na mona te
Oy'aleki yo Yesu na makasi
Kangela ngai oy'aleki yo Yesu na nguya

Baninga pona yesu na ngai
Azali se ye moko
Nzambe na bomoyi
Azali se ye moko
Pourtant mokili esalaki no lelo
Nayembi Nzambe mosusu te
Azali se ye moko
Oy'etobala na mayi
Azali se ye moko
Oy'esekuisa Lazalo
Azali se ye moko
Asilisa makasi
Azali se ye moko
Na force de pesanteur
Azali se ye moko
Yesu amata na likolo
Azali se ye moko
Na nguya na ye ya bozambe
Azali se ye moko

Eya na butu eya na moyi
Na kobamba eloko moko te

Toza na Yesu
Elombe na bitumba
Alonga satana
Alonga mpe mokoli
Ye nde mopanga ebundeli na ngai na bitumba
Tokoma balongi lokolo se na ye

Oy'aza makasi atuta tolo
Atombola mosapi toyeba ye
Lokola ye awuta wapi
Pene na ye amonani te

Azali se ye moko
Nzambe na ngai eh
Azali se ye moko
Bazalaka misato te
Azali se ye moko
Azali se ye moko
Azali se ye moko...

Ah n'ekulusu bosalaka misato
Oy'akufela ngai ezali se yo moko Yesu
Eh yaya oza molonzi
Na ngomba transfiguration bozalaka na mose na eli
Bakenda wapi otikala yo moko
Eh yaya oza molonzi
Ah na jourdain, bosalaka banto ebele
Mongongo eloba toyoka se yo moko Yesu
Eh yaya oza molonzi
Meme si les hommes ne sont pas d'accord
Ngai natatoli tu es mon Seigneur et mon Dieu

Ozali se yo moko
Ozali se yo moko
Ozali se yo moko
Kaka yo nde mokonzi na ngai
Ozali se yo moko
Batela Nzambe
Ozali se yo moko
Oza kokomaki lisumu
Ozali se yo moko
Ngai na koma mosantu
Ozali se yo moko
Yango naposi ba grade na ngai
Ozali se yo moko
Liboso na yo mosantu
Ozali se yo moko
Ngai na tiki lolendo na ngai
Ozali se yo moko
Liboso na yo mosantu
Ozali se yo moko
Ngai makiti na mabolongo yaya
Ozali se yo moko
Tobombalemi yo mosantu
Ozali se yo moko

Eya na butu eya na moyi
Na kobamba eloko moko te

Toza na Yesu
Elombe na bitumba
Alonga satana
Alonga mpe mokoli
Ye nde mopanga ebundeli na ngai na bitumba
Tokoma balongi lokolo se na ye

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment