Paroles de la chanson Vice Versa par Madilu System

Chanson manquante pour "Madilu System" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Vice Versa"

Paroles de la chanson Vice Versa par Madilu System

Le grand monsier, Marcelin Bilomba
FranceKin International
Alain St Pierre

Po na la vie nangai eh
Na lela nangai bolingo
Na lela nangai l'amour
Na suki na mwana oyo, Tifa
Akomisi ngai lokola zoba

Motema mo sundoli
Nzoto ekoti nyongo eko benda nga
Kasi molimo eko boya
Bolingo ezali
Po na mbongo te
Kisi te, to fungola mitema

Babale balingani eh
Ya solo botika
Soki bolobi bo kabola bango um
Mosusu po atika moninga
Ata akuti ye na mbanda eh
Ezalaka mpasi ngo

Nako koka te ko vrivre na bolingo ya boye
Nini nga nasala te, po nanyo
Lelo okende otika ngai na mpasi, na minyololo eh
Oh bolingo, na lela na Paolo

Baboti tango mosusu, bazali ko pekisaka yo
Keba mwasi yo okei ko bala
Fungola matoi mayo
Ozali nano mwana
Ko linga mwasi na mokili, po na kitoko te
Characteur ejugeaka na miso ya bato
Basusu ba zua bilembo pe ba suka na kendo
Deception oyo na zua epesanga mayele eh

Dedications…

Ngai nako senga se losambo na yawe
A pesa yangai molongani, po to vanda
Lelo na zui eh oyo ya ngai wa motema
Na komi mowumbu, ba pasi na bisengo toko vanda

Na na na na na na na na na na
Na na na na na na na na na na

Ata bo bomi nga ko boma
Na boya ye te
Albertine a botama na 1952
Nga na 1983 (Etali bino, Etali bino)
Na linga ye ko linga maman, Albertine eh
Bino baninga nangai, bozali ko kamwa pamba
Bo zela mokolo eko yela bino

Nde boko comprendre ngai
Po yango ezali coup de foudre
Ezali bolingo ya solo
Ata bo bengeli nga ba pasteurs
Na tika ye te
Ata bo bengi papa wa Roma, ce n'est pas la peine

Ngai nako senga se losambo na yawe
A pesa yangai molongani po to vanda
Lelo na zui eh oyo yangai wa motema
Nakomi mowumbu, ba pasi na bisengo toko vanda

Na na na na na na na na na na
Na na na na na na na na na na

Ba papa na biso ya 70 ans
Ba zuaka bana ya 18 ans
Soki nga na luli Albertine
Po azali mwana ya 1952
Mabe ezali wapi eh
Pona nini injustice ya boye (po na nini)
En tout cas, probleme oyo
Soki ONU asilisi ba problem ya ba guerre
Oyo eza na ba mboka, il faut a tala problem oyo
Mais comment nga na lingi Albertine
Po abotama na 1952
Nga na botama na 1983 bo mona yango mabe

Ngai nako senga se losambo na yawe
A pesa yangai molongani po to vanda
Lelo na zui eh, oyo yangai wa motema
Nakomi mowumbu, ba pasi na bisengo toko vanda eh

Talks and dedications……

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment