Paroles de la chanson Colonisation par Madilu System

Chanson manquante pour "Madilu System" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Colonisation"

Paroles de la chanson Colonisation par Madilu System

Tonton, Sala effort oyekola ko banga ngai
Nazali n'importe qui te
Je m'appelle Bialu Jean de Dieu

Yo ozalaka na motema ya soso po nini eh
Ba leisa yo motema ya mbwa po nini eh
Eloko oyo osanzi y'ozongisi na monoko
Esika ba bamba yo mabanga olemba ko kende te

Yo ozalaka na motema ya soso po nini eh
Ba leisa yo motema ya mbwa po nini eh
Eloko oyo osanzi y'ozongisi na monoko
Esika ba bamba yo mabanga olemba ko kende te
(Zwa ata mayele te)

Yokaka eh changer nano ezaleli nayo wana ya kala oh
Yango moto elongwisaka yo mosala liboso
Tango pe olongwaka mosala akimaka yo
A lingaka yo kaka po na falanga eh
Lelo ba zongisi yo na mosala nayoki ozongani naye lisusu
Eh eh

Yokaka eh changer nano ezaleli nayo wana ya kala oh
Yango moto elongwisaka yo mosala liboso
Tango pe olongwaka mosala akimaka yo
A lingaka yo kaka po na falanga eh
Lelo ba zongisi yo na mosala nayoki ozongani naye lisusu
Eh eh
(Jules Bavon Mwambu)

Yo onyokoloko nga mwasi nayo boye po nini eh
O nyokoloko bana obota boye po nini eh
Ba tuba yo tonga ya Johnny Walker o tambola o lemba te
Ozalaka na economie na ndako te po nini eh
(Yango ba loka yo oh boni oh)

Mobali oyo nga na bala azalaka naye sans position
Abima na tongo azonga na ndako se solo ya masanga
(Soulard)

Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo pasi eh, eleki
Ngai mingi
Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa
Na mobali ya Chopine boye

Le le eh le le le le le mama na ngai eh
Le le eh le le le le le le eh

Mobali akima nga na ndako nga na bana mwambe
(eight)
Mobali akima nga na ndako po mabele ekweya nga
Abosani que mabele namelisa bana naye
Mobali aboya nga maman po libumu ebima misisa
Mobali aboya nga na ndako, po nakoma buro
Abosani ki fidelite nangai, oyo navandela ye na ndako

Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo pasi eh eleki
Ngai mingi
Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa
Na mobali ya Chopine boye

Na mobali ya Chopine boye ngai na baye
Na mobali ya Chopine, System, nakokufa eh
Alandisa ngai mabota, mbula nyoso bana
Na quartier ba koma ko benga ye, papa muchina
Nakoma na ba mbanda bana ya serie 8
Amanda na Magali, ce n'est pa possible
(Amanda na Magali, ce n'est pa possible)

Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo pasi eh eleki
Ngai mingi
Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa
Na mobali ya Chopine boye

Motema ya soso ba pesa yo
Olingaka ko yoka te
Motema ya mbwa ba leisa yo, olingaka ko changer te

Le le eh le le le le le le le
Le le eh le le le le le le le

Philippo aboya nga mama
Akoma na ba kamuke (Philippo)
Akokaka ko mona bango
Naba colant te
Surtout soki amoni bango na oyo ya mikuse
Philippo abeli liboma, abosani famille nyoso eh

Ah nga yoyo, mwana ya maman Ida, oyo paso eh eleki
Ngai mingi
Jesus Christu, Zonga noki awa, noki nako wa
Na mobali ya Chopine boye eh

Philippo soit sage
Revient a la maison, S'il te plait.
Mobali mobimba, avanda obe na ndako na semaine
Na weekend omona ye te, irresponsable

Na koma ko tala television na ndako obe nga moko na
Bana
Soko Philipo abimi, okanga ye problem
Surtout banda a gagna loto amonanaka ata na ndako te

Mokolo voitute ekozwa pane oko fanda na ndako,
Philipo

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment