Paroles de la chanson Manou par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Manou"

Paroles de la chanson Manou par Koffi Olomide

Manou yebisa soki amour ekomi kosala eleka ndembo okatelaki yango na motema n'o

Manou ne t'en fait pas, e zalaka se bongo amour oyo to kanaka te yango nde e botela biso mbuma

Yo o kataki ndelu o lobaki to lingana kasi ba yeba te, po o zali nanu bebe oyo manou ya maman, yo oza panthere kasi oyo ya mwana, oyo ya yo manzaka e yebi nanu kozokisaka te moto

Moto mondo maman nga motema e kotinda, yo cas na yo eza different, zala na confiance, ata ba pekisi yo olinga nga, laisse toi m'aimer

Manou na zwa gout, nga ekoko timbi ya kala, moto balingaka nga 100 fois, pe na nyokwamaki mbala 100
Manou na sekwa, banda mongongo na yo ya bo mwana, oyo il falait e benga nga yaya, epona nango e envouté nga motema na ba mots d'amour

O manou ya maman, nzoto n'o manou moselu ya mafuta ya nguma, manou ngayi awa bolingo na yo ezingi ngayi nzoto neti mvunga

Moni, moninga linga motema ekotinda, yo cas na yo eza different, zala na confiance, ata ba bekisi yo olinga nga, laisse toi m'aimer

Dites moi dites moi, dites moi mes amis,
Bolingo oyo eyaki neti mopaya na hotel, lelo ekomi ko pakola ba couleur n'ango na mur ya motema

Moto mondo maman nga motema e kotinda, yo cas na yo eza different, zala na confiance ata ba pekisi yo olinga nga, laisse toi m'aimer

Amour ya mwana maman na motema ezo sala nga digidigi, amour ya mwana ya maman na motema ezo sala nga giligili
Ya mbala oyo toko bala, nsamba eko melama, ya mbala oyo se makwela mbonda eko betama

Baninga basi na bango demarche lokola ya mannequin, ba grand ka basi na bango demanche lokola ya camaleon, oyo ya nga mwana a popi nzambe apesa demanche ya likwanga nzala, oyo ya nga molongani miso pongi lokola ya dracula, he mon amour maman dika, he kiyambuka, he mon amour maman ndika, chance na nga ya vie.

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment