Paroles de la chanson Les prisonniers dorment par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Les prisonniers dorment"

Paroles de la chanson Les prisonniers dorment par Koffi Olomide

Ba lali eeh ba lali mama bato ya boloko nioso tout ba lali
et pourtant butu nanu e kufi te complètement
Ba lali eeh mamaa ba lali mama bato ya boloko nioso tout ba
lali et pourtant butu nanu e kufi te totalement aaannn
Ba lalaka te ba lalaka te ba esclaves ya bolingo pourtant
minuit e lekaki kala pongi eza kaka ko ya te
Ooh amour po ete o ya lelooo
Huuum to lalaka teee to lalaka te biso ba ba humbu ya
bolingo pourtant minuit elekaki kala bolingo ezo ngela tee
Ooh amour tinda ata messager
Banda o kenda Amy makambo na nga ebeba étoile na nga e
ternir
Il faut kaka o linga nga (o linga ngaaaa)
Il faut kaka o zongaa (o zonga aimée eee)
Na bolingo ba limbisanaka aa na bolingo ba yokanakaa
Matanga eeh mama matanga oyo ya bolingo ata quarantième
jour e koki eko silaka te
Na bolingo e bongi o zala na konzo na chance mingi
Eeh tango eza nanu c'est pas trop tard bolingo ko linga te
yo zala munganga na nga après ma mort
Ooh amour yaka ko bikisa ngaa
Banda o kenda Amy makambo na nga e beba étoile na nga e
ternir
Il faut kaka o linga ngaaa (o linga ngaa)
Il faut kaka o zongaaa(o zonga aimée eee)
Na bolingo ba limbisanaka aa na bolingo ba yokanaka
Nga na tiaki bolingo na nga na kati ya sani e toboka e
tikali ko sopana oo nga na zangi mon trésor eeeeh
Na tiaki bolingo na nga na kati ya sani e toboka e tikali ko
sopana ooh nga na zangi mon trésor
Na zongeli nzela na lekaki po na luka bolingo nzoka moleki
ya nzela a sili ko kende nango
Na zongeli nzela na lekaki po na luka bolingo nzoka moleki
ya nzela a sili ko lokota yango
Na sengi na ndeko a kutanaki na trésor na nga eeh a
zongisela ngai esika a zuaki yango
Na sengi na ndeko a kutanaki na diamant na ngai eee a
zongisela ngai esika a zuaki yango
Kota boloko po na nga po un jour liberté eko zonga
Soki o zangi moto o lingi okoti boloko à perpétuité eeeh
eh eh eeeh
Kota boloko po na ye po un jour liberté e ko zonga soki o
zangi moto o lingi o koti boloko à perpétuité

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment