Paroles de la chanson Kiki Ewing par Koffi Olomide

Chanson manquante pour "Koffi Olomide" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Kiki Ewing"

Paroles de la chanson Kiki Ewing par Koffi Olomide

Mawa ehh ngayi mawa
Mbadi mama ngayi mawa
Na nani nga na lela
Na nani nga nasamba ah ngaa

Kobala nde ngambo makwela mal chance nayebaki te
Nazala ata na nguya na changer destin ohh
Soki ezalaki ya refaire nga na kozongela te
Yo wana okomi koniokola okomi komenala ah
Muana nganie elekaki obimaki tricheur meilleur
Nzambe vraiment pona nini osala boye
Moto oyo okolinga ye nde amonela yo
Bolingo ekeyi ndiba etiki nga kidiba
Nga natikali maboko pamba nakolela nga
Mawa ahh cherie
Ya nga mawa suka te
Osali nini na ba sentiment na nga okoma papa kopesaka nga
mokongo ohh
Okoma kososola nga Kiki Ewing
Okoma kotala nga na liso ya songe
Okoma kobetaka nga ehh papa
Okoma koboya nga ahh

Ndenge nini wana, ndenge nini wana okomi ko s'en fouter nga
Okomi komonela nga pona komi na kati ya ndako na yo

Yo obengaka nga cherie, obengaka nga fiancee
Obengaki nga poupee
Ba kombo nioso ya bolingo Kiki Ewing obengaki nga

Sukali nioso esili, sukali nioso esili maloba na yo
Eloko yo kombo bolingo solo ezanga na ngo guarantie

Kobala nde ngambo libala botutu nga nayebaki te
Solo eloko eleki liberte na mokili kaka liwa

Nga mwana na lele eh, nga nzele naleli po bo decevoir nga
Bapasi nioso naomona po na yo nakomi lelo ngando

Moto nioso azo kamua, mboka mobimba ekamui modele oyo osali
nga
Nani azalaki na ndeke Kiki Ewingi ozalaka gigolo

Nasambela se Nzambe, Nzambe ayoka nga mawa
Soki solo muasi azalaka mopaya te apesa ah nga mobali,
alinga nga

Banani wana ahh, banani wana bazo luk'olelisa nga
Defao, Debaba, Carlyto na kati'ya mboka ya bana Maria

Mawa eh mawa eh mawa
Mawa mawa mama ahhh

Mawa ehh ngayi mawa
Mbadi mama ngayi mawa
Na nani nga na lela
Na nani nga nasamba ah

Soki nazalaki Eva yo Adamu,
Soki nazalaki Eva yo Adamu
mbele moto moko te abebisaki
po na kati ya paradiso ya Eden ba temoins bazalaki te,
gigolo azalaka te!

Mawa ehh ngayi mawa
Mbadi mama ngayi mawa
Na nani nga na lela
Na nani nga nasamba ah

Soupou nini oyo olie, mosuni nini balesi yo
Oyo ebaloli yo mabanzo
yo wana okomi kotengama
nyoka solo akosaka moto
Kiki Ewing okomi deux temps

Mawa ehh ngayi mawa
Mbadi mama ngayi mawa
Na nani nga na lela
Na nani nga nasamba ah

Nakozongela mouvement nakozongela ba moziki na nga opekisaki
nga
po lelo na lobi soki na weyi
banginga bakolela nga
mobali okokoma na ba mbanda na nga

Mawa ehh ngayi mawa
Mbadi mama ngayi mawa
Na nani nga na lela
Na nani nga nasamba ah

Kiki de Paris, Guerin Bakoto
Gerard Motingiya, Ndombasi Celo
Zugambundu Gunther monsieur le maire
Dezy Tuluka, Johniko Mwiko
Modogo Botekol, Kisi Lola
Gigi Joboke, Kiki Ewing

Mawa ehh ngayi mawa
Mbadi mama ngayi mawa
Na nani nga na lela
Na nani nga nasamba ah ngaa

Tolakanaki bomengo, Toyokanaki bolingo
Lelo oye kotengama
Mwinda ya nzela ekosi yo
Osali ngai zoba zoba
Ata ndele okolela nga

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment