Paroles de la chanson Kati Na Maboko par Franck Mulaja

Chanson manquante pour "Franck Mulaja" ? Proposer les paroles
Proposer une correction des paroles de "Kati Na Maboko"

Paroles de la chanson Kati Na Maboko par Franck Mulaja

Káti na maboko na yo Nkóló
Nayé komipesa, motéma pe nzóto
Tambolisa ngáí na njela na yo
Po′eté na longa etúmba makási
Na mona kembo na yo

Eh Yaweh na kobelela yo
Libángá na ngai, monéne
Jipa matoyi nayo libosó na ngáí té
Longolá ngáí na mabé
Yokamela mongóngó na mabóndeli na nga
Wana nakobelela yo
Wana nakotombola maboko na ngáí épayi na yo
Na esíká na yo ya bulé

Káti na maboko na yo Nkóló
Nayé komipesa motéma pe nzóto
Tambolisa ngáí na njela na yo
Po'eté na longa etúmba makási
Na mona kembo na yo

Yahweh y′ozali nguyá na nga
Pé Ngúba na ngáí makási
Motéma na ngáí ezalí na elíkya
Bobélé épayi na yo Yahweh

Boyé na sungami pé motéma eyoki esengo
Nakotonda yo na nzémbo
Yaweh y'ozali nguyá ya bato na yo awa na sé
Elíkya ya ba pakolami

Káti na maboko na yo (Nkóló na ngai)
Nayé komipesa (motéma pe nzóto)
Tambolisa ngai (na njela na yo)
Po'eté na longa (etúmba makási)

Káti na maboko na yo (Nkóló na ngai)
Nga nayé komipesa (motéma pe nzóto)
Nkóló, tambolisa ngáí (na njela na yo)
Po′eté na longa (etúmba makási)

Káti na maboko na yo Nkóló
Nayé komipesa motéma pe nzóto

Paroles.net dispose d’un accord de licence de paroles de chansons avec la Société des Editeurs et Auteurs de Musique (SEAM)

Sélection des chansons du moment